audio
audioduration (s)
1.93
17.6
transcription
stringlengths
9
154
lεlɔ oyɔ ozokufa nazotala te
ekomeli ngai boni
motema libanga nazwi wapi
dongolomiso basilisi bato na koboma mpinzoli te
nzoto ya mwasi ekomi eyinelo nakosoli te
bana basili na kokufa ngai matoyi lokola ezosala te
naweli bokonzi na kisasa nazwi tango te ya kobatela yɔ
naluki butu na moyi babenga ngai excellence ye oyɔ aleki na malonga
naluki na bikotakota babenga ngai honorable ye oyɔ abongi na lokumu liwa na yɔ nayokaki yango nabosanaki yango
liboso motuka ekoma miso ya jeannine ezotala ndenge tata oyɔ akiti na motuka
mokolo bakundaki yɔ nazalaki na kisasa nawelaki bibonga
naloba nini
mayεlε te nawangana
kihonorable nalulaki bapesa ngai na ndikila kiexcellence natekelaki mboka balongoli mafuta nzoyi
tina nasamba te
oyɔ nalonaki nde nabuki
eleki mwa mikolo tshotsho ameseni na kozala te ya muji
akangisa commissionnaire kasi commissionnaire ayebi te nini akoyebisa muji
akoti na epemelo ya lokumu ya libanda ya pepo ya ndjili
muji mwananyoka mapango na ye ya sika asombaki na bacommissionnaire misusu
akenda atika elaka te
mama na ye na bandeko na ye bafandaka kaka na menkao
abongisa ndako na bango kasi azonga te
uta mokolo wana po na jeannine mosolo ezanga bolingo efandaka na epemelo wana
monano ya suka monano ya suka nayebi lisusu nzela nakoleka te monano ya suka
napesa yɔ mbote molimo esemi nasuki awa
nazwa momeseno ya koyokaka makelele ya kolelaka na yɔ
motema emesana na komonaka ebele ya pasi eyelaka yɔ
mawa esunda pongi eyingela olongwa susi na ngai
tshotsho pe makambo ya politiki eyeli na elulu azwi lisusu tango ya koluka muji te
ekomi na ngonga moko boye ekomi kosenga kosala maponomi
na lingomba na bango tshotsho kodiongo alobi ete ye alingi kotiya libaya kaka na ma campagne
azali mɔtɔ ya lingomba ya tata mokonzi
na ma campagne esi ezalaki na kolo masolo oyɔ esi akanaki kotiya libaya na ma campagne
basololi tii baye kokoma na eyano
mwa mbɔngɔ ya bapolo mwa danki ekosopa mabele na avenue bokasa djalεlɔ ekoyembama ete azali nsoso ya mboka
tshotsho kodiongo alobi te nalongwa barumbu kala nazonga kutu kuna te tolongwaki kuna tango tozalaki bana mike
kasi baninga balobi na ye te tozali na mɔtɔ ya solo na barumbu te
esengi kaka yɔ otia libaya kuna
tshotsho kodiongo amilobeli na se ya motema nayebaka te nini etinda ngai naloba ke nawuta barumbu
tshotsho kodiongo akei kobelela po bampɔna ye na barumbu
amesana mwa mbɔngɔ ya boki bato babeleli kombo na ye
soki etangama okokufa na pepo ata osali ndenge nini sukasuka okomata kaka na pepo
tshotsho kodiongo asutuki
na motema amilobeli tala bambendre oyɔ kaka po eza tangu ya vote
soki ezalaki tangu ya kimya nde jeep ya bana mura elɔkɔteli ngai bango awa bakɛndɛ konyɔngama na ndenge ya mokε te
na bavote yango kasi na polele boye aseki
ayebi que soki afandisi masolo na barumbu te na parti na bango asambwe
esengi kaka ndenge ndeko eliezer alobaka benda molayi tii bakolεmba
bozali na raison kasi nasengi bino bolimbisi
ngai nazali mwana na bino ya barumbu
ameli soyi
akobi na kolobaka ete soki bobwakisi ngai bokotiya nani
boki nasombi ezali kaka luzitu bino bozali na vieux na ngai bosimbi masolo
na ndenge ya respect petit tangu akoti na esika bakulutu bazali ezosenga mwa nsamba ekita
bozwa yango na ndenge ya mabe te
yɔ ozali mwana ya barumbu yɔ
po otɔnga hotel awa yango nde okanisi que okomi mwana ya barumbu
kompani omonaki ya kotongela biso kompani ya kindumba
na hotel na yɔ batouriste bayaka
bayaka kotala barumbu
basombaka nini na barumbu
bilɔkɔ ya kolia
oloba ozali mwana ya barumbu ndaku na biso ezalaki wapi
otanga na ecole nini
bato bazalaki kokɛngɛla ye basutuka
bato bazalaki kokɛngɛla ye basutuka
ata pe ozali mwana barumbu osala nini
makambo na bino ngai moko nakomema yango
tata moko azalaki na pawu na ye azalaki kokɛndɛ kotimola nzela po mayi ya mvula eleka ayɔki neti bafingi mama na ye
ngonga babatelinzoto bapekisa azwi bambata makɔfi bisambeti
tata oyɔ ya pawu soki kaka vide emonani amamoli pawu
soki kaka polele pawu
tshotsho kodiongo abetami
bato na ye basali makasi babendi ye na se ya lobeto azalaki kobetama bakotisi ye na motuka pe batamboli
mabanga ezali kolanda bango
na mobulu wana mokumbi amonaki te ete libulu moko ya monene ezalaki na matakanelo ya bokasa pe kabambare
akei kozinda kuna
lokola azalaki na kotambola na lombango makasi motuka ebeti libaku ebaluki makalekale
bato bayei ebele esika yango mɔtɔ akokipe kosunga bango azali te
oyɔ ya kolongola retroviseur alongoli retroviseur oyɔ ya kolongola pine alongoli pine oyɔ ya kolongola pare-brise alongoli parebrise
na miniti mokε motuka etikali se mabende
bato mitano balali bibembe
bomoyi ya tshotsho kodiongo esuki na ngonga oyɔ azalaki kozela te
bato oyɔ bakonzi basalelaki babwaki kobwakama babwakamaki motema na bango balongolaki
bomɔtɔ na bango balongolaki
masumu ya bato nyɔnso oyɔ bakamba mboka pe bakomisa barumbu esika barumbu ekomi afuti masumu na bango
ata epumbuki nanu te obeti libaku mutu ekei kotutana na kiti pe okufi
tshotsho kodiongo ye wana akoti na ekala moko na barumbu ezalaki na esika balabala kasayi ekatana na kitega
bazalaki soki bato zomi kasi milangi kaka misato ya masanga pe esi esilaki na yango
tshotsho kodiongo apusani mpεmbεni na bango
abandi masolo ya politiki ndenge azokana kobongisa barumbu soki baponi ye
ayebisi na barman barman memela baprêtre mwa boki awa ngai nakofuta
wana azozela kobelela ye mopao oleki bango
ayɔki ata kosukosu te
kaka mongongo ya pepe kalle ezonganga na baffle osilisi banganda ya paris oo
bakoma kobenga yɔ bon client
tshotsho kodiongo ayɔki neti pepe kalle abimi na nkunda pe azali kozomela ye
lokola mosisa ya nsɔni bakata ye wana abendi pe kiti afandi
tala ndeko telema na malεmbε